mardi, novembre 18
Meet the target Banner
Meet Logic PRINT Banner
Tous derrière les FARDC

Étiquette : To tika Congo te

To tika Congo te !
LIBRE OPINION

To tika Congo te !

Nazali mwana ya Congo Tata na mama bakongo Ki-congolais ya tongo tongo Ki-congolais ya kobotama Na makila na matama Na zali na nga te na esika Ata na keyi mboka ya sika Congo ekozala te mosika Ki-congolais ya mobimba Ya ndombolo pe ya mvimba mvimba Na zali muana mboka Lumumba Kimbangu abanda etumba Nkimpa vita amema mokumba Ki-congolais ya Lomami ye na Wemba Mudimbe na Koffi na Chez Ntemba Congo na nga lolango Congo ya flambeau Congo ya Lwambo Congo ya monzoto Congo ya tricolore Na zali muana mboka Solo ya ki-congolais, pilipili na liboka Na kolemba Congo te Ata buzoba ya bayi politiki Na ya bayi mboka Eleki ndelo Poso elamu Toko tika Congo te ! Boko kende Congo ekozala kaka !   Texte de Tata N'longi Biatitudes