
Nazali mwana ya Congo
Tata na mama bakongo
Ki-congolais ya tongo tongo
Ki-congolais ya kobotama
Na makila na matama
Na zali na nga te na esika
Ata na keyi mboka ya sika
Congo ekozala te mosika
Ki-congolais ya mobimba
Ya ndombolo pe ya mvimba mvimba
Na zali muana mboka Lumumba
Kimbangu abanda etumba
Nkimpa vita amema mokumba
Ki-congolais ya Lomami ye na Wemba
Mudimbe na Koffi na Chez Ntemba
Congo na nga lolango
Congo ya flambeau
Congo ya Lwambo
Congo ya monzoto
Congo ya tricolore
Na zali muana mboka
Solo ya ki-congolais, pilipili na liboka
Na kolemba Congo te
Ata buzoba ya bayi politiki
Na ya bayi mboka
Eleki ndelo
Poso elamu
Toko tika Congo te !
Boko kende Congo ekozala kaka !
Texte de Tata N’longi Biatitudes



