« Oko zonga maboko pamba » ya Richard Ali
Eza nako landisa mokolo oyo mokili mobimba ezo tala monoko mwa bo mama (journée de la langue maternelle) nde arts.cd esepeli kotia oboso na pole butu « Oko zonga Maboko Pamba » oyo mwana mobali Ricard Ali akomi na lokota ya lingala. Ebimi epa na ndako Mabiki, lisolo oyo ekobima lelo 21 février na ésika ya mayangani Wallonie-Bruxelles na engumba Kisasa.
Esengeli koyeba été "Okozonga maboko pamba" ezabuku ya mibale oyo Ali akomi na lingala na sima ya "Ebamba"
A lobi boye na " Oko Zonga maboko pamba":
"Mokonzi ya mboka, liboso ya kitala-tala, makanisi nyonso ezali koleka na molimo na ye lokola na filime. Po na nini nakende koloba liboso ya mokili mobimba na monoko na ngayi te ? ba oyo batiaki ngayi na ebonga, balingi penza nini ebongo soki…
Na ndako ya mama Sisca, nzala ekoti, mbu...